Skip to content

Makolo Digital Tele- LAVDCONGO

Bundu dia Kongo Vs Christianisme et Tshisekedi: M. Shabani au micro de Thethe Kapajika sur LAVDC

Listen to this article

2 thoughts on “Bundu dia Kongo Vs Christianisme et Tshisekedi: M. Shabani au micro de Thethe Kapajika sur LAVDC”

  1. Remarques:
    1. Ndeko mukambi ya Bundu dia Kongo na Swede, Tika Shioko, salela Mafuta normal oyo eko changer loposo moyindo na yo te. Po wana pe ezali kaka mindele ba memela biso ba hidroquinone po na ko bungisa biso pe ko boma biso po na kati ya matier wana to yebi te ba mbeba nini ezali. Bakoko na biso ba zalaka kosalela Mafuta ya mbila, ya Ndika pe ya ba Nzete misusu oyo ebotaka na Zamba ya Kongo.
    2.Ndeko yaya Journaliste, Olobi et ba Chrétiens ba lobaka Yesu Ezali Nzambe, Na lingi oyeba ete ba Chrétiens Banso te oyo ba lobaka lolenge wana, Ezali nde ba Chrétiens misusu ya Kongo oyo pe ba yebi bibilia yango malu mingi te pe pasi ya minoko ya mindele oyo bibilia yango ekomama ba Chrétiens misusu ya Kongo ata ayebi ko sosola munoko ya mundele malamu te ndakisa Gramaire, na ba Conjugaisons na ba temps na yango, bango nde wana ba Créaka Confusion na Bibilia pe ba lobaka ete Yesus azali ye Moko Tata Nzambe mokeli. Mais ezali pe na Ba Chrétiens ya Kongo oyo ba zali na masanga ebele oyo kaka ya ba Mindele pe ba yebi ete Yesu ya Solo oyo ba Bengi Kristu Ye azali Tata Nzambe te pe ako zalaka te. Pe lisusu na Bosolo Yesu Kristu Ye pe Azali to azalaka na loposo ya Mundele te, Oyi wana ba lakisaka na ba Filmes ezali Italiens moko to espagnol moko ba Mindele nde ba sala filme wana po kaka na ko lakisa ete bango ba zali likolo ya moto Moyinde na makambo nyonso ezala na bonzambe, Wana ezali Complexe ya mundele. Bo tala kaka ezala mabele oyo ba loba ete Yesus Kristus abotamaka, Mundele asa manso akata Canal oyo ba Bengi Canal de Swese mpo kaka akabola mabele wana elongwa na Afrika oyo ezali mabele ya bayindo.
    3. Bibilia ezali mabe te elakisi te ke bibilia nde mutu ezo ko kanga biso bana Kongo to matisa nkita to développement ya Ekolo na Biso, Pamba te Mindele pe esengeli to Yeba ete Bibilia ezali mukanda na Bango te, bien que bango ba sala makasi ba koma yango na ba lokota na bango mais ezali ya bango te. Bo landa Histoire malamu malamu. Mais na lingi koloba boye ete malgrè wana mindele ba zo matisa Konta ya bikolo na bango.
    4. Bundu dia kongo ezali ko monisa nini po na Kotombola Ekolo to Nkita ya Ekolo na biso? Po na kanisi na moyi ya Lelo bundu dia kongo eteya biso lisusu te ke Esengeli to Lata ba Poso ya bibwele non tranformé to ba loposo ya ba Nzete.elakisi ete to vivre lisusu ndenge ba nkonko na biso ba zalaka. Esengeli bundu dia kongo etenir pe compte ya modernité. Yenge.

  2. j´ai vraiment aime´ cette emission, vraiment nasengi na ba pasteurs pe baleka pona toyeba soki nani azali na raison… Emission kitoko mingi, merci bcq

Comments are closed.